Koseka ngai te po naza na biblia na maboko
Esika nioso na ko kende, kombo ya Nzambe na monoko na ngai oh
Basali ya Nzambe oyo baza koteya bisso tango nioso
boyebi te nini oyo Nzambe asalela bango pona ba salelaka ye
Oko mona ngai tango nioso na nzela kaka ya eclesia oyebi
te nini oyo Nzambe asalela ngai pona na kendaka eclesia eh
Ahh, moto kutu oyo ya mokili, soki apesi yo eloko osengui merci eh
Ebongo kolo ya pema eh topesi ye nini?
Oko mona nga tango nioso naza kokombola eclesia oyebi
te nini oyo Nzambe asalela ngai pona na salelaka ye ye ye
Ahh, ngai oh oh nazali reconnaissante yeeh
Makambo asalela ngai ya minene papa oyo oh
Na wuti na libulu ya massumu abimisi ngai
Esika na salaki ya liwa eh abimisi ngai oh
Mikolo na ngai ya ko vivre ekomaki nde ya kotanga eh
Pongui na ngai na butu kaka ba ndoto ya mabe eh
Nani akopesa ngai loboko? Moto na moto na oyo ya ye
Na kanisaki libota na ngai ekosunga ngai e pesi ngai nde mokongo
Na simbaki mutu na kolela ngai eh, pasi elekelaki ngai Nzambe oyo eh
Ahh, ngai oh oh nazali reconnaissante yeeh
Makambo asalela ngai ya minene papa oyo oh
Na wuti na libulu ya massumu abimisi ngai
Esika na salaki ya liwa eh abimisi ngai oh
Mikolo na ngai ya ko vivre ekomaki nde ya kotanga
Pongui na ngai na butu kaka ba ndoto ya mabe eh
Nani akopesa ngai loboko? Moto na moto na oyo ya ye
Na kanisaki libota na ngai ekosunga ngai e pesi ngai nde mokongo
Na simbaki mutu na kolela ngai eh, pasi elekelaki ngai Nzambe oyo oh
Ahh ngai oh bo moni tina ngai na lingaka ye
eh? Na lapa ndai na vie na ngai na kosalela ye
Abeta ekuke ya motema na ngai na fongoli akoti
Ye wana camarade ya motema na ngai yeh yeh yeh yeh Nzambe oyo
Moto na moto na ngonga na ye,
a betaki ekuke ya motema na ngai na fongoli a koti ih
Ye wana camarade na ngai oh
Ye wana thermomètre ya température na ngai yeh eh
Ye wana mayi na ngai ya komela e kitisaka ngai motema
Ye wana bilei na ngai ya kolia eh na tango ya nzala eh
Ye wana manteau na ngai oh na tango ya malili eh
Ye wana makassi na ngai oh tango na lembaka yeh eh papa oyo eh
Ye wana réanimation ya Clément Missamu yeh yeh yeh Nzambe oyo
Ye wana parapluie na ngai oh na tango ya mvula eh
Ye wana kisi na ngai ya komela na tango ya maladie
Ye wana a silisa pasi na ngai oh papa oyo eh
Ye wana alongola soni na ngai oh papa oyo eeh Nzambe oyo oh
Ye wana parapluie ya Christian Litassi eh
Ahh ngai oh bo moni tina ngai na yembelaka ye
eeh? Na lapa ndai na vie na ngai na kosalela ye eh
Abeta ekuke ya motema na ngai na fongoli a koti
Ye wana camarade ya motema na ngai yeh yeh yeh yeh papa oyo
Moto na moto na ngonga na ye eeh
Abetaki ekuke ya motema na ngai na fongoli a koti ih
Ye wana camarade na ngai oh yeeh
Ye wana moninga na ngai ya motema yeeh
Ye wana makasi na ngai oh yeeh
Ye wana mayi na ngai ya komela
Ye wana vie na ngai mobimba